Acts 26

Polo asambi liboso ya Agripa

1Agripa alobaki na Polo :

—Napesi yo nzela, okoki na yo koloba.

Boye, Polo atombolaki loboko mpe abandaki kosamba. Alobaki boye :

2—Mokonzi Agripa, nazali na esengo mingi mpo na kosamba lelo liboso na yo, na tina na makambo nyonso oyo Bayuda bafundeli ngai. 3Lokola oyebi malamu penza bizaleli mpe tembe ya Bayuda, nabondeli yo ete ozala na motema monene mpo na koyoka ngai.

4Bayuda nyonso bayebi ezaleli na ngai wuta bomwana. Bayebi banda na ebandeli, ndenge nini bomoi na ngai ezalaki kati na ekolo na ngai mpe na Yelusalemi. 5Bayebi ngai penza wuta kala, mpe bakoki kotatola yango soki balingi, ete ngai natambolisaki bomoi na ngai lokola mofarizeo, na botosi makasi ya mibeko ndenge lingomba na biso esengaka. 6Mpe nazali kosamba lelo likolo ya elikya oyo natiaka na elaka oyo Nzambe apesaki bakoko na biso. 7Bato ya mabota na biso zomi na mibale basalelaki Nzambe butu mpe moyi na kolemba te, mpo ete bazalaka na elikya ete bakomona kokokisama ya elaka yango. Mokonzi, ezali kaka mpo na elikya wana nde Bayuda bafundeli ngai. 8Boye, mpo na nini penza kati na bino, bozali kondima te ete Nzambe akoki kosekwisa bato bakufa ?

9Ngai moko mpe nazalaki kondima ete esengelaki na ngai kosala nyonso, mpo na kotelemela Kombo ya Yesu ya Nazareti. 10Boye, mosala yango nde nasalaki na Yelusalemi. Nakangisaki basantu ebele na boloko, na ndingisa ya bakonzi ya banganga-Nzambe, boye ngai mpe nazalaki kondima tango bazalaki koboma bango. 11Mbala mingi nazalaki kotambola na bandako ya mayangani mpo na kopesa bango bitumbu mpe kotinda bango na makasi ete batiola Yesu Klisto. Na zuwa na ngai oyo eleka ndelo, nazalaki kolanda bango kino na bingumba ya bapaya mpo na konyokola bango.

12Ezali mpo na yango nde nakendaki na Damasi, na bokonzi mpe na etinda ya bakonzi ya banganga-Nzambe. 13Eh mokonzi, na ngonga ya midi, tango nazalaki kokende, namonaki kongenga moko kowuta na likolo, oyo elekaki kutu ata kongenga ya moyi. Kongenga yango ezipaki ngai mpe bato oyo bazalaki na ngai elongo na mobembo. 14Biso nyonso tokweyaki na mabele, mpe nayokaki mongongo moko koloba ngai na monoko ya arami : “Saulo, Saulo mpo na nini ozali konyokola ngai ? Ozali komimonisa pasi na kotambola makolo ngulu likolo ya basende.”

15Boye, natunaki :

—Nkolo yo nani ?

Nkolo azongisaki :

—Ezali nde ngai Yesu oyo ozali konyokola !

16Kasi lamuka mpe telema ! Pamba te, namimonisi epai na yo mpo na kokomisa yo mosali na ngai mpe motatoli ya makambo oyo osili komona, mpe ya makambo oyo nakolakisa yo na sima. 17Nakobikisa yo na maboko ya bato ya ekolo na yo, mpe na maboko ya bato ya bikolo ya bapaya. Nakotinda yo epai na bango 18mpo ete ofungola bango miso na tina ete balongwa na molili mpe baya na pole, mpo ete balongwa na se ya bokonzi ya satana mpe baya epai na Nzambe na tina ete bazwa bolimbisi ya masumu mpe bomengo elongo na basantu soki bandimeli ngai.

19Oh mokonzi Agripa, wuta tango wana, nandimaki kotosa emoniseli oyo ewutaki na likolo. 20Nabandaki koteya liboso bato ya Damasi, ya Yelusalemi, ya Yudea mobimba mpe bato ya bikolo ya bapaya, mpo ete babongola mitema mpe bazonga epai na Nzambe, bongo na nzela ya misala na bango, balakisa ete babongoli mitema. 21Ezali kaka mpo na tina oyo nde Bayuda bakangaki ngai na Tempelo mpe balukaki koboma ngai. 22Kasi kino lelo, Nzambe azali kobatela ngai, yango wana natelemi awa mpo na kotatola liboso ya bato pamba mpe bato minene. Nateyaka makambo mosusu te, bobele makambo oyo basakoli mpe Moyize baloba ete ekosalema ; 23ete Klisto asengelaki komona pasi mpe kozala moto ya liboso ya kosekwa kati na bakufi, mpo na kosakola pole ya lobiko epai ya Bayuda mpe epai ya bato ya bikolo ya bapaya.

24Wana Polo azalaki nanu koloba, Festisi akataki ye maloba mpe agangelaki ye :

—Ozali na liboma Polo ! Boyebi oyo otondi na yango ekomisi yo liboma !

25Kasi Polo azongisaki :

—Tata mokonzi, nazali na liboma te. Makambo oyo nazali koloba ezali solo mpe ezali penza na nzela.
26Mokonzi Agripa kutu ayebi makambo oyo malamu ; yango wana nazali koloba na molende nyonso liboso na ye. Nayebi malamu ete abungi ata likambo moko te kati na makambo yango, pamba te esalamaki na kobombama te. 27Mokonzi Agripa ! Boni, ondimaka basakoli ? Nayebi malamu ete ondimaka bango.

28Boye, Agripa alobaki na Polo :

—Okanisi ete okoki kokomisa ngai moklisto kaka na mwa tango moke ?

29Polo azongisaki :

—Ezala na tango molayi to na tango moke, nazali kosambela Nzambe ete bokoma lokola ngai, kasi na minyololo te, yo kaka te kasi mpe, bato nyonso oyo bazali koyoka ngai lelo !

30Tango bayokaki bongo, mokonzi atelemaki. Boye, moyangeli, Berenise mpe bato nyonso oyo bazalaki na bango elongo mpe batelemaki. 31Wana babimaki, balobanaki bango na bango : “Moto oyo asali mabe ata moko te oyo ekoki komemela ye etumbu ya liwa to ya boloko.”

32Agripa alobaki na Festisi : “Soki moto oyo asengaki te kosamba liboso ya Kayisala, esengelaki kotika ye.”
Copyright information for LinMNB